Overblog
Editer l'article Suivre ce blog Administration + Créer mon blog
11 septembre 2016 7 11 /09 /septembre /2016 23:31
Bana mboka RDC Congo totelama makasi pona recuperation ya imperium na biso.

~~Congolaise tope congolais; bobima na balabala; bonganga na nzela na tina ya imperium na biso oyo esengeli to recuperer; tobotola yango pona glissement toboyi; mbula misato lisusu ya mandature ya kabila toboyi; referendum toboyi; dialogue indesirable toboyi yango;maseki toboyi; ba revision naba tentatives intempestives ya mibeko tope constitution toboyi yango nyonso. Tozala sinceres; tozala franc; tozala batu ya makanisi ya solo; mbula tuku mitano tope 15 ans na ngwende tope na kiti ya bokonzi ya mboka eloko moko ya malonga basali te eleko moko libungu tulu tope zero na lopoto. Bongo tozela lisusu nini pona biso ya biso mokolo ya le 19 Decembre 2016 ezali bongo mokolo oyo Peuple Congolais akozwa yaye imperium na maboko pona kozwa mokano ya kopona nani oyo akoki kozwa tope kovanda na kiti ya bokonzi na mboka RDC. Nakotala motindo oyo Peuple Congolais akomi kokemba; kozanga lisungu tope ko souffrir pona mboka naye moko; Nzala; kozanga misala; kozanga ndaku; mpiaka na mpiaka koleka seuil ya tolerable; pasi na pasi mikolo nyonso na tina ya usurpation na imposture oyo evandi na ngwende ya mboka c'est-a-dire ya kimoyibi na lokuta tope kobukaka lokuta na lokuta bipayi nyonso na administration ya mboka; ezali mawa mawa. Pamba te makomi ya bana congo oyo bavandi libanda ya mboka elobi boye : Esengeli tokoma bapekisi. nako tala kaka liteya oyo tobengi 'EMPECHEOLOGIE' na mokano nango na chapitre 14 na 15 elobi boye : Bana ya Congo nyonso oyo bavandi libanda ya mboka basengeli batia liteya oyo babengi empecheologie liteya ya sika; oyo nanu eyokana te epayi mususu na misala; elobi bongo ete likoki ya kopekisa bapaya; babomi mboka; bateki mboka, ba imperialistes; ba multinationales; ba occupants na bana bitinda na bango pona ko wumisa misala mabe ya kobebisa na mobimba tope na ndambu ba Peuple congolais en particulier na africain en general; na kobungisa bango bomeki yena ya molili ya kindoki ya komonelaka bango pona tina ya komata; kozwa; kokende liboso ya bana congo. Chapitre 15 ebeti lisusu sete; elobi ete : Bana ya mboka congo oyo bavandi libanda ya mboka bazali na litomba yako sala bokasi c'est-a-dire resistance contre moto oyo tope lingomba ya bato oyo balingi kozwa bokonzi ya nguya nako wumela na makasi nako mekaka kosalela yango na kotosa mobeko yani te oyo etangami constitution c'est-a-dire buku ya mboka ya origine na kosalelaka bango ba campagnes ya koboya kotosa bango; na ya kotelema na kotelemelaka bango na cadre ya S.P c'est-a-dire Soulevement populaire; na ba journee ville morte pona ko liberer nako sauver Peuple congolais na Etat ya otage naya siege na mobimba tope na ndambu. Wa bino Bienvenu Massamba MP

Partager cet article
Repost0

commentaires

Présentation

  • : diasporanabisomoko
  • : je diffuse l'actualite tant africaine qu'internationale.
  • Contact

Recherche

Www.topchretiens.com